Luke 14

Yesu abikisi lisusu moto na mokolo ya saba

1Mokolo moko ya saba, tango Yesu akendaki kolia na ndako ya mokonzi moko ya bafarizeo, bato bazalaki kotala ye na mayele. 2Moto moko azalaki wana liboso na ye, azalaki na maladi ya kovimba nzoto. 3Yesu atunaki bafarizeo mpe balakisi ya Mibeko :

—Boni, ndingisa ezali mpo na kobikisa moto na mokolo ya saba ?

4Bavandaki nye Bongo Yesu akamataki moto yango, abikisaki ye, mpe alobaki na ye azonga. 5Sima atunaki bango :

—Nani kati na bino, ata ezali mokolo ya saba, soki mwana na ye to ngomba na ye ekweyi na libulu, abimisaka yango noki te ?

6Kasi bakokaki kozongisela ye eyano te.

Mateya mpo na komikitisa mpe kokaba

7Tango Yesu amonaki ndenge bato oyo babengamaki bazalaki kopona bisika ya lokumu na mesa, alobaki na bango lisapo oyo : 8—Soki moto abengisi yo na feti ya libala, kopona kovanda te na esika ya lokumu, nakobanga ete moto oyo abengisaki yo abengisa mpe moto mosusu oyo aleki yo na lokumu ; 9bongo ye oyo abengisaki bino, yo na ye, akoya mpe akoloba na yo : “Pesa esika na yo na moto oyo !” Bongo na soni nyonso, okokende kozwa esika oyo ezali na lokumu moke. 10Kasi, soki babengisi yo na feti, kende kovanda na esika ya suka. Mpo ete tango moto oyo abengisaki yo akoya, akoloba na yo : “Moninga na ngai, yaka kovanda awa na esika ya kitoko”. Yango ekopesa yo lokumu na miso ya bato nyonso oyo babengami na feti.

11Pamba te, moto oyo amimatisaki bakokitisa ye, mpe moto oyo amikitisaka bakomatisa ye.

12Bongo Yesu alobaki na moto oyo abengisaki ye :

—Soki obengi moto aya kolia epai na yo na midi to na pokwa, kobenga baninga na yo te, to mpe bandeko na yo te, to mpe baboti na yo te, to mpe bato ya mbongo oyo bazalaka na yo pene-pene te. Soki te, bango mpe bakobengisa yo mokolo mosusu, mpe bakozongisela yo bolamu nyonso oyo osalaki mpo na bango.
13Nzokande soki osali feti, bengisa : babola, bato bakufa miso, bato bakufa makolo to maboko, mpe bato oyo batambolaka tengu-tengu. 14Soki osali bongo, okotonda na esengo monene pamba te bango bazali na makoki te ya kozongisela yo bolamu oyo osalelaki bango. Bongo Nzambe akofuta yo na mokolo oyo bato na sembo bakosekwa !

Lisapo ya babengami

(Mt. 22.1-10)

15Bongo moto moko na kati ya bato oyo bavandaki na mesa, tango ayokaki bongo, alobaki na ye :

—Esengo mingi na moto oyo akolia na feti na Bokonzi ya Nzambe !

16Kasi Yesu azongiselaki ye :

—Moto moko asalisaki feti moko ya monene mpe abengisaki bato ebele.
17Tango ngonga ya kolia ekokaki, atindaki mosali na ye akende koyebisa na bato oyo abengisaki :

“Boya, pamba te biloko nyonso esiʼebongisami.”

18Kasi bango nyonso babandaki kosenga bolimbisi.

19Moto ya liboso alobaki :

“Nasombi elanga, esengeli nakende kotala yango. Nabondeli yo, limbisa ngai.”

20Mosusu mpe alobaki :

“Nawuti kobala mwasi, yango wana nakokoka koya te.”

21Mosali azongaki mpe ayebisaki yango na mokonzi na ye. Bongo nkolo ndako asilikaki mpe alobaki na mosali na ye :

“Kende noki na banzela mpe na babala-bala ya vile mpe mema awa : babola, bato bakufa makolo to maboko, bato batambolaka tengu-tengu mpe baoyo bakufa miso.”

22Bongo mosali ayaki koloba :

“Mokonzi, nasali ndenge otindaki ngai, kasi bisika ezali naino.”

23Bongo mokonzi alobaki na mosali na ye : “Kende na banzela mpe na libanda ya vile, mpe sala nyonso mpo ete bato bakota, mpo ndako na ngai etonda. 24Pamba te nalobi na bino, moto ata moko te na kati ya bato oyo nabengaki liboso, akolia biloko ya feti na ngai.”

Mpo na kozala moyekoli ya Yesu esengeli otika nyonso

25Bato ebele penza bazalaki kokende elongo na Yesu, bongo abalukaki epai na bango mpe alobaki :

26—Soki moto aye epai na ngai, bongo aboyi tata na ye te, mama na ye te, mwasi na ye te, bandeko na ye ya mibali te mpe bandeko na ye ya basi te, ata kutu bomoi na ye moko, akoki kozala moyekoli na ngai te. 27Mpe moto oyo amemi ekulusu na ye te mpe alandi ngai te, akoki kozala moyekoli na ngai te. 28Nani kati na bino soki alingi kotonga ndako ya etaze, liboso akovanda te mpo na koluka koyeba soki ndako yango ekosenga ye mbongo boni, mpe akotala te soki azali na mbongo oyo ekokoka kosilisa misala nyonso ? 29Pamba te, sima ya kotia fondasio, soki alongi te kosilisa kotonga ndako yango, bato nyonso oyo bakomona ye bakobanda koseka ye : 30“Botala moto oyo, abandaki kotonga ndako kasi akoki te kosilisa yango !”

31To mokonzi nini soki alingi kokende kobunda etumba na mokonzi mosusu, avandaka te liboso mpo na kotala, soki elongo na basoda na ye nkoto zomi akoki kobunda etumba na mokonzi oyo azali na basoda nkoto ntuku mibale ? 32Soki amoni ete akokoka te, na tango monguna na ye azali naino mosika, akotindela ye bato, mpo baluka kozongisa kimia.

33Ndenge moko mpe, moto moko te akoki kokoma moyekoli na ngai, soki naino aboyi te oyo nyonso azali na yango.

(Mk. 9.50)

34Mungwa ezali malamu ; kasi soki ebungisi elengi na yango, ndenge nini bakokoka kokomisa yango lisusu elengi ? 35Ekozala lisusu na tina te ata mpo na mabele, ata mpe mpo na kobongisa bilanga, kasi bakobwaka yango. Oyo azali na matoyi mpo na koyoka, tika ayoka !
Copyright information for LinMNB